Le retour volontaire peut vous y emmener.
Fedasil organise et paie votre voyage de retour. Et nous examinons avec vous comment nous pouvons vous soutenir dans votre pays d'origine.
Mituna? To koyambola!
-
Nini wana kondima kozonga?
Ezali kondima kozonga mboka yayo ya mbotama. Yo moko okolinga kozonga mboka nayo ya mbotama. Mobembo ekosalama lolenge moko na bandeko nionso okati ya pepo. Bakonzi ya mboka bazui nayino mbela te pona bozongi bua yo. Epesameli nayo moko ti ondima koboya kosonga.
-
Ndenge nini nakosenga bozongi na bolingo na ngai moko?
Solola na moko ya babiro to masanga na Belgique oyo ekipaka makambo ya bozongi, solola na assistant sociale na yo to benga nimero ya ofele 0800 327 45.
-
Nani akobongisa bozongi na ngai?
Fedasil nde ekambaka programe ya bozongi na bolingo ya moto. Fedasil to Lisanga ya Mokili Mobimba ya Migration (IOM) ekobongisa mobembo na yo ya avion to ya bisi mpo na kozonga. IOM na Caritas International epesaka lisungi nsima ya bozongi na yo.
-
Nakofuta yango?
Te, okofuta ata eloko moko te. Fedasil nde akofuta mobembo wana ezali na pepo to pe na bus ti na esika ya kosua pepo. Yo moko osengeli kokende kosua mikanda nayo ya mobembo na consulat nde nasima bakozongisela yo pe lomeya liboso te ozua pepo.
-
Bisaka boni nasengeli komema?
Nasengeli kotosa mibeko eye epesami na bandeko oyo basalaka na kompani ya pepo tope na bus . Nalekisa bisaka te kilo pe te Nasengeli kotosa!
-
Bakosunga ngai na ntango ya bozongi na ngai?
Ee, ntango okolongwa Belgique, mosali moko ya IOM to ya Fedasil akopesa yo tike ya avion mpe mbala mosusu mwa lisungi ya mbongo. Mosali wana akomema yo kino na ndelo na esika ya controle. Bakopesa yo saki moko eyebani oyo ekosenga omema na libanda ya mpepo mpo mosali ya IOM to ya Fedasil ayeba yo na pete. Soki olingi mpe soki likoki ezali, mosali ya IOM to ya Caritas akoki kozela yo na libanda ya mpepo ya mboka na yo.
-
Kovanda na mboka nangayi ezali pasi, lisungi nini boko pesa nangayi?
Tosalaka na baninga mosusu pona bosungi omboka yayo ya mbotama, nani akosunga ndeko pona bosongeli naye ombaka, mua mosala ekosalisa ye abanda komisunga to pe kosalisa ye na ngonga ya maladi, nape misala misusu. Lisalisi ezali ndenge moko te moto na moto azali nandenge oyo bakosunga ye. Tuna na moto nayo soki lisungi nini okoki kosua lisusu, lisungi ya bosongi omboka epesa meli na Belgique.